Tête Haute Lyrics – L’Or Mbongo

Ekomi tango ngai pe na mona
Ekomi tango ngai pe na longa
Esengo na ngai emonana na miso ya bato
Tango ya bitumba eleki
Ekomi pe na tango oyo
Yapasi epesamela nga na pete
Tango ya bitumba eleki
Tokomi pe na tango oyo
Ya pasi epesamela nga na pete
Ekomi tango ngai pe na mona
Ekomi tango ngai pe na simba
Esengo na ngai emonana na miso ya bato
Tango ya bitumba eleki
Ekomi pe na tango oyo
Yapasi epesamela nga na pete
Tango ya bitumba eleki
Tokomi pe na tango oyo
Ya pasi epesamela nga na pete

Likambo nyoso ezalaka na tango
Likambo nyoso ezalaka na tango
Tango ya kobunda pe tango ya kolonga
Tango ya kolela pe oyo ya koseka Yesu
Yango pasi nini yango oyo
Kilo n’ango ezanga suka
Ekomi pe tango nanga naseka
Likambo nyoso ezalaka na tango
Likambo nyoso ezalaka na tango
Tango ya kolona pe tango ya kobuka
Oyo ya kosala pe oyo ya kofutama aa Yesu
Yango pasi nini yango oyo
Kilo n’ango ezanga suka
Ekomi pe tango nanga naseka
Yango pasi nini yango oyo
Kilo n’ango ezanga suka
Ekomi pe tango nanga naseka


Na kotambola moto likolo oo
Na kotambola moto likolo oo
Po nayebi Nzambe ya biblia
Akowangana nga te
Ako tika nga pe te
Na kotambola moto likolo oo
Na kotambola moto likolo oo
Na kotambola moto likolo oo
Po nayebi Nzambe ya biblia
Akowangana nga te
Ako tika nga pe te
Na kotambola moto likolo oo
Soni y’elongi nanga eleki
Nga na komi nde moto y’esongo
Po nayebi nzambe ya abenga nga
Akowangana nga te
Ako tika nga pe te
Na kotambola moto likolo oo
Soni y’elongi nanga eleki
Nga na komi nde moto y’esongo
Po nayebi nzambe ya abenga nga
Akowangana nga te
Ako tika nga pe te
Na kotambola moto likolo oo

Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Na yebaki yo te kasi yo oyebaki nga wuta kala
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Otambola na Abalayama Isaac Yaweh bilembo emonana Yesu
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Yosefu abangaki yo sukasuka azwaki lifuta
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Osekwisaka bakufi na bibilia aa a
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Sima mikolo mineyi Lazalo abimi na kunda aa
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Jéhovah-Shammah Jéhovah Nissi yemba
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Oza Nzambe ee oza Nzambe ba baba ee
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Papa na nga aa Papa na ngai ee e
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Jéhovah-Shammah Jéhovah Rapha Yesu oo
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Bisika y’ovandi ya mba loyembo na ngai lelo oyo
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Haa ya malonga naza n’ango eza se Yesu
Oza nzambe kumama nayo Papa na lola
Ozala jamais insensible na pasi ya basali nayo be baba

Song by L’Or Mbongo