Ma Robe De Gloire Lyrics – L’Or Mbongo

Alleluia

Nako nako na kolela te
Nakoma ya Nzambe ee
Nako na komitungisa te
Nakoma ya Yesu
Asikola ngai na makila ya talo
Alatisa ngai elamba ya kembo
Apesa nga kombo ya mwana Mokonzi
Nako nako na koma ya ye
Pona libela
Nako na kotelengana te
Naza ya Yesu


Na mitiki mopepe nayo etindika ngai
Maboko na yo na mokongo na ngai etindika ngai
Ya mbala oyo ooh
Eza elamba ya kembo
Tunique ya tata apesa bobotola nga eza ya famille
Oyo mwasi ya Potiphar alongolanga ezalaki ya bango ooh
Oyo ya misato ezalaki elamba ya prison
Ya mbala oyo nalati elamba ya valeur
Oyo Yesu apesi ngai nani abotola yango ooh
Eh bongo oyo apimeli ngai nani apesa nga yango oo
Ngai na mitungisa te ee Yesu nde mopesi ii
Miso na ngai ebeta beta te ee
Naza ya Yesu ee

Nako nako na kolela te
Nakoma ya Nzambe ee
Nako na komitungisa te
Nakoma ya Yesu
Asikola ngai na makila ya talo
Alatisa ngai elamba ya kembo
Apesa nga kombo ya mwana Mokonzi
Nako nako na koma ya ye
Pona libela
Nako na kotelengana te
Naza ya Yesu

Mbongo eza motuya kasi kondima
Nanga eleki mbongo oo
Ya mbala oyo oo
Eza elamba ya kembo oo
Miso oyo emesana komona elokote
Na bomoyi nanga aa
Ya mbala sambo oyo oo
Ekomona eloko oo
Lipata oyo ya moke bozo mona ezo annoncé nvula aa
Nvula eko noka aa
Achab ako mona aa
Nga mosali nayo na kokufela
Na île ya Malte te Shamma aa
Nga mosali na kokufela
Na île ya Malte te Yesu uu
Kino na mona ba barbare
Ba bongola maloba aa
Ngai mosali na kolongwa mokili oyo na humiliation te ee
Nga nalenga lenga te ee
Naza ya Nzambe ee
Lisusu na tepa tepa te ee
Alliance eza makasi ii

Nako nako na kolela te
Nakoma ya Nzambe
Nako na komitungisa te
Nakoma ya Yesu
Asikola ngai na makila ya talo
Alatisa ngai elamba ya kembo
Apesa nga kombo ya mwana Mokonzi
Nako nako na koma ya ye pona libela
Nako na kotelengana te naza ya Yesu

Seyo ooo seyo o okumama eee

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Akumama Yaweh ee akumama
Akumamaaa Yaweh ee akumama

Song by L’Or Mbongo